Délibération

Nombre de streams : 374474

Date de parution : 07/06/2009

Paroles de la musique "Délibération" par Fally Ipupa

[Intro] Échantillon ya bolingo Azmak na ngai Yo otikeli moninga okeyi Ata bato bakobongwama Azmak Kasi ngubu na mayi akotikala obe ngubu [Couplet 1] Yo moto olobaka nga tokokabwana te Ata pasi, bisengo okokanga motema Lelo okomi okende otika nga na nani Y'otiki ba pota na motema na nga bomwana Naluki liwa, liwa ebo n'ango ngai eh [Couplet 2] Ebele ya ba mvula tovandi nga na yo Mokolo moko Azmak, y'obosani manso Loyenge ya mokili, ezipi yo bongo Y'ozoyoka te (Y'ozomona te) Yo ozalaka nde auteur ya mibeko ya l'amour Yo moko auteur, y'o violé nde ba lois Oh dis chéri (Pourquoi vraiment ?) Soki nazalaki officier mbele nakangisi yo Jugement pe ya mokili oyo, naza na confiance te Ekomaya kosomba, connaissance na famille Ngai ko famille te oh, natiki na nga mais bolingo eza nanu Natiki na nga mais bolingo eza nanu Makanisi elobi naboya mais motema ezokoka te Zongela nga ata butu mo, mo, moko, oh (Nayebi kokoma yoka nga nkele na ba nausées) (Nayebi kokoma yoka nga nkele na ba nausées) [Couplet 3] Oh Azmak, zela ata tongo etana bongo okende Nazobanga butu bandoki ba envoûter sentiments na nga Lalisa nga pongi ya suka, bandoto'a suka Nalobi mwana suka aliaka nde mingi (oy'a yo) Aveugle asalaka choix ya elamba te oh mama (Azmak) Namona trop kasi motema elula se yo Namona mingi kasi motema epona n'ango se yo Loboko avant esenga (Sentiment motema Azmak) Nafongoli loboko ata mua nguba eza te [Couplet 4] Maloba na nga moyibi ata nalobi vérité Banda nayiba ndongo ndongo ata misili ebungi Ndenge nini nawangana Nzambe? Kaka obele mais naliaka na nga pe misili te Mais kasi ndenge nini nawangana Yuda ata abongoli motema Loba bapasola bible po bandima ye Nga nalingi na nga se yo [Pré-refrain] Revoir cas na nga eh Azmak Revoir cas na ngai papa na Latifa Nakomi finaliste Azmak Nabengaka yo cheri chouchou'a motema Ata quarante-deux pour-cent Délibérer moninga Ata naza na nga mayele te Mais nazalaka toujours présente Y'obebisi vie na nga eh Mabe abengani nga Matinda atindiki nga Alpha a favorisé Mazé zongisa nga na carreau na yo (Ya bolingo) [Pré-refrain] Revoir cas na nga eh Azmak Revoir cas na ngai papa na Aziz Delido Nakomi finaliste Azmak Nabengaka yo cheri chouchou'a motema Ata quarante-deux pour-cent Délibérer moninga'ango Ata naza na nga kitoko te Mais nazalaka toujours présente Linga nga lokola Warzeline eh Mabe abengani nga Matinda atindiki nga Alpha a favorisé Azmak zongisa nga na motema na yo (Ya bolingo) Nzambe Eh Madina Djobounge ah [Refrain] Ponela nga nzela naleka Epayi bakotuna ngai yo te Lobi omemelaki nga fololo Lelo otindeli nga matiti [Couplet 5] Ngai moto namesana ba sorties nionso kaka nga na yo Yo moto olakisa nga bolingo ya solo wuta bomwana na nga Lelo bafeti nionso nakende batunaka nga "Oye yo na nani ?" Soki nalobi oboya nga, baboyi kokotisa nga yoka bango : Oyo eloko ya nani eh, nani amemeli biso eloko yo Oyo mwasi ya nani eh, nani abungisi mwasi oyo Nani aye feti singleton alokota ye akota na ye [Refrain] Ponela nga nzela naleka Epayi bakotuna ngai yo te Lobi omemelaki nga fololo Lelo otindeli nga matiti [Outro] Ah, ah Nzambe Ah Nzambe sunga ngai eh Ah Nzambe, motema [Refrain] Ponela nga nzela naleka Epayi bakotuna ngai yo te Lobi omemelaki nga fololo Lelo otindeli nga matiti