
Paroles de la musique "Vouloir sans pouvoir" par Fally Ipupa
[Intro]
Soki oye te chéri, eza nde liwa
[Refrain]
Oyo ya ngai malheur, oyo ya ngai souffrance
Kozanga moto motema elinga
Naza na ba vouloirs, mais nazanga pouvoir
Ya kozua moto'ango motema elinga
Oyo ya ngai malheur, oyo ya ngai souffrance
Kozanga moto motema elinga
Naza na ba vouloirs, mais nazanga pouvoir
Ya kozua moto'ango motema elinga
[Couplet 1]
Ebembe ya soso matanga te
Mais soki abungi mokolo na'e atunaka epa ba voisins
Atako nasila valeur epa na'o
Mais liwa na ngai ndeko na'o moko akoki olela
Po navanda na yo ba mvula bien que opandi foyer
Mais ba souvenirs eleki bebo
Nazo souffrir eh, ah chéri pona yo
Nzambe est-ce que asala Satan te sans ba genoux
Po afukama te noki te asenga ye pardon
Po lifelo asalela ye ekoya kotula eh
Nde ndenge chéri na ngai asali ngai
Apia ngai sort ya ntaba ata aleli "beeeeh"
Mawa pe te noki moto ya tono etula
Nazokufa eeeh, ah chéri pona yo
Urgence to problème ekitisaka prix to valeur ya eloko
Oh ngai nasambwe
Niveau ya ba problèmes olukeli ngai
Na ba l’échec bango pe bakomi oseka ngai
Bazoyembela ngai "oyo atikali sima, mwasi ya ligorodo"
Kokamwa na magorodos pe bazobwakela ngai
"oyo a tikali sima, mwasi ya ligorodo"
[Refrain]
Oyo ya ngai malheur, oyo ya ngai souffrance
Kozanga moto motema elinga
Naza na ba vouloirs, mais nazanga pouvoir
Ya kozua moto'ango motema elinga
Oyo ya ngai malheur, oyo ya ngai souffrance
Kozanga moto motema elinga
Naza na ba vouloirs, mais nazanga pouvoir
Ya kozua moto'ango motema elinga
[Couplet 2]
Motema ezoki pota ya somo ye (Eyinda)
Batshioli ngai mingi
Etumba ya ngai na chéri, nabanzaki yo policier
Okoya nde vraiment kokabola
Nzoka ozalaki n'o croix rouge, ozozela nakufa
Bongo oya ko mema ebembe ngai eh pasi eh
Ah chéri oza mabe (wololo wololo wololo)
Ah vraiment mabe (wololo wololo wololo)
Eh (Wololo wololo wololo)
Nabanzi lisusu maloba koko ayebisaki ngai koko na ye
Bolingo moto passi, nayokaka ye te (wololo wololo wololo)
Alobaka koko na ngai "Bolingo mbisi ya mukuwa ebele
Badundaka te na lokoso atako nzala"
Napesi ye raison (wololo wololo wololo)
Nakoma na inquiétude lokola mbwa na feti ya ba creuseurs
Baboma soso, ngombe, kimia nakozua se soki feti esili
Surtout soki moto aye na sima pona petit besoin
Ngai nazobanza aye koboma ngai, traumatisme
Ah, chéri pona yo (wololo wololo wololo)
Oyo ya ngai malheur
Oyo ya ngai soufrance ye ye ye
Naza na miso ya fière mais nakelela pongi
Nabanzaki l'amour, nzoka ezali la mort chéri eh
Ye alobaka akozonga, atika ngai pamba ye mawa
Navanda na ye ba mvula, alongolisa ngai bazemi
Akatisa ngai kelasi, aboyisa ngai ba masta
Nakomi na ndako yoka ye konionga ngai
[Refrain]
Oyo ya ngai malheur, oyo ya ngai souffrance
Kozanga moto motema elinga
Naza na ba vouloirs, mais nazanga pouvoir
Ya kozua moto'ango motema elinga
Oyo ya ngai malheur, oyo ya ngai souffrance
Kozanga moto motema elinga
Naza na ba vouloirs, mais nazanga pouvoir
Ya kozua moto'ango motema elinga
Mwana mabe oh (Vouloir sans pouvoir)
Mwana mabe oh
