Attente

Nombre de streams : 418385

Date de parution : 24/11/2007

Paroles de la musique "Attente" par Fally Ipupa

[Intro] Attente oh tozela tozela bon Tondimi tokozela kasi Mais tokotelema wapi Santa La Fée mama abota Josely Mapuata [Couplet 1] Baza wapi, wapi bango Baye balobaka que bolingo ezalaka te Bongo oyo ekweli nga lelo eza nini? Nakutani n'o motema na nga e bougé [Couplet 2] Nga nakola na nga yuma Ba familles babulaka nga nazala sango Y'o perturbé ba plans ya vie na ngai Pongi ya bolingo ezipi nga ti na suki Ya moto oh oh oh, ya moto oh oh oh Ezolamwisa ngai nazolala n'ango Josely [Chœur] Douter na nionso mais na bolingo na nga te Douter na nionso mais na bolingo na nga te Mapuata [Couplet 3] Nga nakola na nga yuma Ba familles babulaka nga nazala sango Y'o perturbé ba plans ya vie na ngai Pongi ya bolingo ezipi nga ti na suki Bolingo epesi nga droit ebele Bolingo epesi nga droit ebele, hum notamment Ya kolela sans babeta ngai Ya kotanga soyi sans kozala kizengi Josely [Refrain] Tala ba cimetières na nga epusani mosika na nga Pona bolingo y'opesi ngai Tala suki na nga ya pembe ekomi koyina yango moko Banda o decidé y'olinga nga [Couplet 4] Eh moto azelaka masuwa azelaka na libongo Moto azelaka avion azelaka na aeroport Moto azelaka lokalo azelaka na gare Moto azelaka bolingo atelemaka wapi yebisa ngai Po nga nazelaka yo oh oh Yeh yeh yeh yeh No no no no no Josely Mapuata mobali ya Jadé Kahuti [Refrain] Tala ba cimetières na nga epusani mosika na nga Pona bolingo y'opesi ngai Tala suki na nga ya pembe ekomi koyina yango moko Banda o decidé y'olinga nga [Couplet 5] Humm pesa nga tango Josely Ya kolula yo bien Mapuata Y'oza kitoko mingi papa na Justine Y'oza elengi gout Josely Mapuata Ata mboka mobimba baboyi yo nga nakolinga yo kaka Eh y'oza elengi mingi Josely Mapuata Yo wana na kati kati ya ebale Okosokola namituni yo na ebale Nani apetoli moninga? Yo wana na kati kati ya ebale Okosokola namituni yo na ebale Nani apetoli moninga Josely Mapuata [Refrain] Tala ba cimetières na nga epusani mosika na nga Pona bolingo y'opesi ngai Tala suki na nga ya pembe ekomi koyina yango moko Banda o decidé y'olinga nga [Couplet 6] Mbeto yango okomi 'osundolela ngai Josely Nzungu ya bilei okomi 'okinela nga moko Mapuata Y'ovandi na coin yo moko Est-ce que parlement ya motema na yo E se réunir na cas na biso mibale Josely Mapuata Nasi na diminuer mwinda ndenge y'olingaka, minuit ebeti Télévision ozotala se po opimela ngai bisengo ya butu huum Lakisa ngai epayi nakozua, bisengo oyo opesaka nga Jour pe nuit namesana na yo [Refrain] Tala ba cimetières na nga epusani mosika na nga Pona bolingo y'opesi ngai Tala suki na nga ya pembe ekomi koyina yango moko Banda o decidé y'olinga nga [Couplet 7] Eh moto azelaka masuwa azelaka na libongo Moto azelaka avion azelaka na aeroport Moto azelaka lokalo azelaka na gare Moto azelaka nini azelaka nini oyo Moto azelaka bolingo atelemaka wapi (Dédicaces) [Refrain] Tala ba cimetières na nga epusani mosika na nga Pona bolingo y'opesi ngai Tala suki na nga ya pembe ekomi koyina yango moko Banda o decidé y'olinga nga [Refrain] Tala ba cimetières na nga epusani mosika na nga Pona bolingo y'opesi ngai Tala suki na nga ya pembe ekomi koyina yango moko Banda o decidé y'olinga nga