Je t'aime

Nombre de streams : 203364

Date de parution : 16/12/2022

Paroles de la musique "Je t'aime" par Fally Ipupa

[Intro] Aah Je t'aime Math Mathurin Tshananga DJ Master Li [Couplet 1] Pona maladie na nga Babengi ba médecins Babengi ba spécialistes Ba cardiologues, ba neurologues Ba amourologues, ba anchologues Babengi pe ba elengiologues Po ba décrypter malaise ango Ata moko te azo guérir nga à part yo Nakomi inondée na mayi ya miso se po ya kolelaka yo Yo nde moto ozalaka sango a diplôme na matoyi na nga finaliste O préféré okoma sango a liwa ya pape na matoyi ya ba catholiques Amour na nga ah Tellement déplorable, tellement pitoyable Basengeli yango intention de prière Pasi na nga aah Lokola ya maladе oyo abela pendant cinquante ans Ata lisungi еmonana te Mais Mokolo ya liwa na ye Baninga, ba familles, ba collègues na écart ya quarante minutes Batindi 10 mille dollars pona ba obsèques Nasili mayele, nabeli Nazokanisa trop esika nakobomba bolingo pona motema soucis etimbela Po déception emona te code secret ya bolingo na nga Mosusu nakolinga aza te, introduction yo, conclusion nga Immunité na nga parlementaire ya motema n'o Balongoli yango po e invalider nga na motema n'o Mais ata olobi oboya nga, humanité mobimba ekofunda yo Pona bolingo na biso ezalaka na valeur ya globe terrestre Miso na nga Math o pie embargo ya kotala te direction ya bolingo na yo Mwana etike, mozangi ya pamba, bomengo na nga bolingo Amour na yo inéluctable na vie na nga lokola Fréon pona malili ya congélateur, douze heures sans moyi eza minuit Motema na nga sans yo Mathurin synonyme parfait ya enfer Je te veux dans ma vie amour le sous bassement de mon bonheur [Refrain] Je t'aime de tout mon cœur (Je t'aime de tout mon cœur) I love you Math Mathurin (I love you Mathurin Math) Nalingaka yo mingi bébé na ngai (Nalingaka yo mingi Mathurin) Esi nabonga na nga epa na yo eh, kobonga na nga Mathurin Nasuka nga awa na effaça le passé Je n'ai d'yeux que pour toi mon ange, mon amour, mon opium (Les soixante-six livres ya Bible ekoki te ko convaincre nga) (Naboya yo, natika yo, nakoka te kobosana amour na nga Math) [Couplet 2] Bolingo na nga ezo bela malnutrition, infection n'o Na se ya kwiti moto akoki obosana date de naissance c'est vrai Milliardaire akoki o perdre de vue montant ya fortune na ye Mais jamais akoki obosana elongi pe kombo ya moto alinga T'oublier est impensable, inacceptable, inimaginable Sur mon corps j'écrirai ce cœur n'est pas à aimer Ndenge na mur a lopango bakomaka cette parcelle n'est pas à vendre C'est toi mon unique amour, c'est toi que j'adore bébé [Refrain] Je t'aime de toutes mes forces (Je t'aime de tout mon cœur) I love you Math Mathurin (I love you Mathurin Math) Ngai nalingaka yo mingi bébé na ngai (Nalingaka yo mingi Mathurin) Esi nabonga na nga epa na yo eh, ko bonga na nga Mathurin Nasuka nga awa na effaça le passé Je n'ai d'yeux que pour toi mon ange, mon amour, mon opium (Les soixante-six livres ya Bible ekoki te ko convaincre nga) (Naboya yo, natika yo, nakoka te kobosana amour na nga Math) [Couplet 3] Loin de toi ma vie est sans envie et mon corps est sans cœur chéri eh Nalinga, nalinga, nalela na nga yo, okoboma nga soki okeyi Épargner nga douleur mortelle ya love, nakoya ko suffoquer chéri eh Lokola grand car ekweleli libata espoir de vie ekomi impossible Bolingo na nga sur mesure na yo, o refouler nga na motema n'o [Refrain] Je t'aime de tout mon cœur (Je t'aime de tout mon cœur) I love you Math Mathurin (I love you Mathurin Math) Nalingaka yo mingi bébé na ngai (Nalingaka yo mingi Mathurin) Je t'aime de toutes mes forces (Je t'aime de tout mon cœur) I love you my baby (I love you Mathurin Math) Nalingaka yo mingi bébé na ngai (Nalingaka yo mingi Mathurin)