Mikitisa

Nombre de streams : 243634

Date de parution : 15/04/2013

Paroles de la musique "Mikitisa" par Fally Ipupa

Mikitisa nakita Mwasi soumise na tosaka Mais makambo obe nga Tovandi kaka boye tomoni porte fungwami Moto moko molayi mbinga, pembe kitoko akoti nani wana? Maitre Vincent Gomez ya maman Evy, Respect Nandimi faute likambo nasali te Nasengi pe pardon même si naza coupable te L'essentiel tobongisa amour na biso Kowumelisa kanda na mitema eza dangereux Ba gratte-ciel to tonga ba mbula ebele Ondimi vraiment ekweya na ba incomprehension Soso ata yo moto obokola ye Soki osimbi mwana na ye ako doda yo do do Mbeli ata yo moto osomba yango Soki osali erreur ekoki kozokisa yo eh Bible elobi mobali linga mwasi na yo Mais yo obo kolinga nga raison nini, Vincent Na bolingo pourquoi okomi ko stresser nga disciple na yo Nakomi kobanga na pongi Po peut être liwa ebatami na kati eh Café ekoma jus préféré na ngai eh Sentinelle ya miso mpo pongi ekota te Nakomi kobanga na konimba eh Po yango eza neti nazo frôler liwa eh Liwa eh Liwa eh eh Liwa eh Liwa eh eh Po na Gomez ... Vincent nalingaka yo mingi Pourquoi yo ozo réaliser yango te oh Na accorder mongongo ti diapason Ya litoyi na yo po oyoka nga ata mawa Kolela na nga yo ozo refuler yango eh Epa na yo ozo yoka yango son ya ngouli Mawa trop Na sambwe eh Na sambwe eh Vincent loketo na nga ekomi ko bloquer Po gresse na doucer ya maboko nayo eza te Nani ako binisa nga lisusu Po yo moto obinisaka nga bien Gauche droite, gauche droite everyday Ngouli eh Kamata papa Ouchombe obina ole na rumba Mino esepelaka na ko macher to na kosua To tango cure-dent eyaka ko rendre ye visite Po naza yeba lisusu te ndenge nini na sepelisa yo, Gomez Vincent eh, Gomez Vincent Gomez Mobali ya tembe Soki mpuku azui matanga Jamais akolinga niawu aya ko tala ye Mpese ata amemi kilo ya ndenge nini Jamais akolinga soso amemisa ye Malgré ozokisa nga mingi kasi koboya nga te oh Pardo eh, pardon Yo nde oza na tonga Amour na biso epasuki Affection ya yo na nga eza Singa to tonga bolingo, Vincent Vincent yo nde oza na tonga Amour na biso epasuki Affection ya yo na nga eza Singa to tonga bolingo, Gomez Vincent pardon, papa, koboma ngai te Nazo meriter te sikoyo ba benga ngai ebembe Po bolingo na yo Ekomeli nga nausée koleka bisanza ya mbwa Basangisi na poison ba force nga? namela Yo nde antidote na nga la main dans la vie na nga Mais pourquoi oza absent awa cherie no azo lela Bolingo Ekomeli nga nausée koleka bisanza ya mbwa Basangisi na poison ba force nga? namela Yo nde antidote na nga la main dans la vie na nga Mais pourquoi oza absent awa cherie no azo lela Bolingo Vincent nalingi te nabungisa yo Ndenge squelette abungisaka misuni Soki moto ake na mabele Yeba apôtre Pierre awanganaki Yesu mbala misato Après soso kolela kokoriko Ayaki kosenga bolimbisi balimbisaki ye Mais yo owangana nga plus de mille fois Nga moko nazoluka yo nasenga pardon Pardon eh, Maitre Gomez pardon Soki mpuku azui matanga Jamais akolinga niawu aya kotala ye Mpese ata amemi kilo ya ndenge nini Jamais akosenga soso amemisa ye Malgré ozokisa nga mingi Koboya nga te oh Pardon eh, pardon Vincent yo nde oza na tonga Amour na biso epasuki Affection ya yo na nga eza Singa to tonga bolingo, Vincent Vincent yo nde oza na tonga Amour na biso epasuki Affection ya yo na nga eza Singa to tonga bolingo, Gomez